Pona Bolamu
Read Pona Bolamu lyrics by Athom's e Nadege on LyroVerse, with linked artist context and related song paths.
The page facts to cite before the commentary
Use this page for the lyric text, linked artist context, and any LyroVerse editor's note attached to the song. Listener comments remain user-generated and should not be treated as the primary source.
Pona Bolamu
The lyric stays readable and compact here; the note and related paths sit nearby so you do not lose the song while looking for context.
Na koki te ko bomba eh
Na koki te ko fanda kimia
Na koki na zanga maloba eh
Na koki te na kanga monoko
Bolamu'a Nzambe eleki bo moyi nanga
Na koki te, ko bomba yango (Yaweh)
Pona bolamu oyo O sali eeeh ehNa koki te na fanda kimia
Na koki te na kanga monoko
Bolamu'a Nzambe elekeli nga mosantu
Na koki te na zanga maloba
A kanisaka nga ata na kanisi Ye te
Yesu na nga ooo naza na talo Yaya
Pona bolingo oyo na moni eeeeh eh
Pona bolamu oyo O sali eeeh eh
Ba sujets nionso eza n'ango valables
Soki'olingi o sanjola Nzambe
Ba susu ba sanjola Ye pona lipa
Ba susu ba netola Ye pona mbongo
Sujet nionso, eza nango na tina
A condition que ozala mosantu (Yaya)
Pona bolamu oyo – O sali eeeh eh Nzambe monene lokola Yo papa
Na mokili'oyo na moni te oh
Na kanisi nionso o saleli nga
Na zongi pene na yo na kumisa yo eh
Ba lobi na nga na binaka lokola liboma
Kasi na yebi sujet ya mabina na nga
Eza – Bolamu oyo O sali eeeh ehBa kamue nga ba lobi na banda wapi
Ba mituni eza pona nini
Ba yebi te temoignage'a motema
Makamb'o eliki nga meke molimo
Ata moto mosusu a yeba te oooh
Motema na nga eza temoin (Yaya)
Temoin ya - Bolamu oyo O sali eeeh eh
Na za temoin ya - Bolamu oyo O sali eeeh eh
Ewuti nga mozindo a motema eh
Ebimi nga kino monoko
Na lingi na ganga kasi na koki te oh
Motema na nga esi etondi
Etondi na bolamu na Nzambe
Na libota to pe na santé na nga (Yaya)
Na yemba – Bolamu oyo O sali eeeh eh
Na etonga, ma boko na nga likolo
Molimo na nga esi emati
Pinjoli na miso eza ko tanga eh
Ba mituni ooh pona nini
Nazui rétroviseur na tali kala eeh
Bolamu nionso Nzambe asala
Na yembi ooh - bolamu oyo O sali eeeh eh
Quand je me souviens je me mets à chanter
À chanter comme un fou pour Jésus
Bolamu oyo O sali eeeh eh
Eloko mosusu te na bomoï na nga
Eza na motuya lokola makambu'oyo
Oyo Masiya A salela nga
Oyo elekela nga mabanzo
Yango na pesa wolo to pe palata eeh
Nionso na pesa soki A sengi
Pona bolamu oyo na moni eeeh eh Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
O longi'oooh oh oh motema eeh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga papa (Olongi motema ya mosantu na Yo eeeh)
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Olongi molimo ooh ya
Moyengebene ooh Papa ooh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Na komi'otik'o zala nga
Na komi'o koma lokola Yo Yaya
Po olongi ooh na mozindo ya motema Papa
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Moto ya kanda kanda
A zua douceur a Molimo eeh
Po olongi ye ooh Masiya oh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Na yemba loyembo'eyemba Jacob a koma Israel oh
Po olongi oooh Yaweh ooh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Makambu'ango elekeli nga
Kasi na lobi sala ndenge O lingo oooh
Oooh Yaweh eeh
Yaweh eeooh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Likambo'ango e lelisi nga
Kasi na lobi sala ndenge'O lingi oooh
Yaweh eeh eeh eh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Olongi motema aah
Ya mosantu na Yo oooh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Olongi motema
Na kati'a motema ooooh
Yaweh eeh Yaweh eh
Olongi motema na nga
Huuum olongi oooh
Olongi motema eeeh
What this page can answer fast
Who performs "Pona Bolamu"?
Athom's e Nadege performs "Pona Bolamu", and this lyric page sits inside the Athom's e Nadege catalog on LyroVerse.
Are there related songs to explore after "Pona Bolamu"?
Yes. The related section below points to C'est Pour Toi El Elyon and Faithful Friend with a short reason for opening each page next.
Where can I find more songs by Athom's e Nadege?
Use the artist link near the top of the page or the related paths section below to keep moving through Athom's e Nadege's lyric pages.
Interpretations, questions, and corrections for this song
Interpretations, questions, memories, and correction notes live together here. The room stays noindex while the best insights are reviewed.
What people are saying
No listener comments on Pona Bolamu yet.
A strong comment here is specific: the phrase you keep hearing, the mood you come back for, or the reason this song stays in rotation.
Sign in to post the first listener note. Reporting stays open to everyone.